عن أبي هريرة رضي الله عنه أن رسول الله صلى الله عليه وسلم قال:
«كُلُّ أُمَّتِي يَدْخُلُونَ الْجَنَّةَ إِلَّا مَنْ أَبَى»، قَالُوا: يَا رَسُولَ اللهِ، وَمَنْ يَأْبَى؟ قَالَ: «مَنْ أَطَاعَنِي دَخَلَ الْجَنَّةَ، وَمَنْ عَصَانِي فَقَدْ أَبَى».
[صحيح] - [رواه البخاري] - [صحيح البخاري: 7280]
المزيــد ...
Abu Hurairah (Allah andimela ye) alobi ete, Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala likolo naye) alobaki:
“Bato - ya ngonga - na ngai nyonso bako kota na Paradizo longola se oyo aboyi” - Bayekoli - batunaki : Ee Motindami ya Allah ! Boye nani akoboya? Ayanolaki na bango na koloba ete: “Moto oyo akotosa ngai akokota na Paradizo, mpe oyo akozanga botosi ngai yende asili koboya”.
[صحيح] - [رواه البخاري] - [صحيح البخاري - 7280]
Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kopesa sango ete Bato na ye nionso - sima ya boyeyi naye - bakozala kokota na kati ya Paradizo longola se bae oyo bakoboya!
Bayekoli (Allah asepela na bango) batunaki Ntoma ete: Nani akozala koboya Ee Motindami ya Allah?!
Ntoma (kimia mpe boboto ya Allah ezala likolo maye) ayanolaki bango ete: ya sôlo moto oyo akomikitisa, alandi mpe atosi Motindami ya Allah (kimia ezala naye) yende akozala kokota na Paradizo, mpe na oyo nyonso akozanga botosi mpe aboyi komikitisa na mibeko - ya Lingomba -, yemoko nde asili komipekisa bokoti na Paradizo likolo ya misala naye ya mbindo.