+ -

عن عائشة رضي الله عنها قالت: سمعتُ من رسول الله صلى الله عليه وسلم يقول في بيتي هذا:
«اللَّهُمَّ مَنْ وَلِيَ مِنْ أَمْرِ أُمَّتِي شَيْئًا فَشَقَّ عَلَيْهِمْ فَاشْقُقْ عَلَيْهِ، وَمَنْ وَلِيَ مِنْ أَمْرِ أُمَّتِي شَيْئًا فَرَفَقَ بِهِمْ فَارْفُقْ بِهِ».

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم: 1828]
المزيــد ...

Aicha (Allah asepela naye) alabi: nayokaki Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) koloba ete:
« Ee Allah! Moto nyonso oyo azali mokambi ya likambo moko na kati ya Umma [Lingomba] na ngai, mpe akomisi yango pasi likolo na bango, [Ee Allah!] Komisa pe makambo pasi likolo naye. Mpe na oyo azali na mokumba ya likambo moko na kati na Umma na ngai, naye azali kokomisa yango pète epai na bango, [Allah] Komisa mpe makambo pète pona ye. »

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم - 1828]

Explanation

Ntoma ya Allah (losambo pe kimia ya Allah ezala likolo naye) asengaki Du'a [na Allah] likolo ya moto nyonso oyo azali mokambi ya likambo moko wuta na makambo ya ba mizilman, ezala ezali - makambo - ya mikie to ya minene, ezala ezali bokambi ya bato banso to ya ndambo kati na bango, na ye [moto wana] akomi kokomisela bango makambo pasi, naye azangi kozala boboto likolo na bango, ya solo Allah - Nkolo ya nkembo - akozala kofuta ye kolandisama na mosala naye ete; Ako komisa pe makambo pasi pona ye.
Kasi na mokambi oyo akozala na malamu elongo na bango mpe azali kokomisa pète makambo na bango, ya solo Allah akozala malamu naye mpe akolembisa [facilité] makambo naye.

Benefits from the Hadith

  1. Esengeli epai ya moto oyo apesami mokumba ya likambo kati ya makambo yaba mizilman azala na boboto epai na bango kolandisama na bokokeli naye.
  2. Lifuti ezalaka na lolenge ya mosala.
  3. Motango ya maye matali boboto to bakokoso ezali kati ya maye mazali te kotelemela Buku ya Allah mpe Sunna.
Translation: English Urdu Spanish Indonesian Uyghur Bengali French Turkish Russian Bosnian Sinhala Indian Chinese Persian Vietnamese Tagalog Kurdish Hausa Portuguese Malayalam Telgu Swahili Tamil Burmese Thai German Japanese Pashto Assamese Albanian Swedish amharic Dutch Gujarati Kyrgyz Nepali Yoruba Lithuanian Dari Serbian Somali Tajik Kinyarwanda Romanian Hungarian Czech الموري Malagasy Fulani Italian Oromo Kannada الولوف البلغارية Azeri اليونانية الأكانية Uzbek Ukrainian الجورجية المقدونية الخميرية الماراثية
View Translations