عن أبي هريرة رضي الله عنه أن رسول الله صلى الله عليه وسلم قال:
«أَتَدْرُونَ مَا الْغِيبَةُ؟»، قَالُوا: اللهُ وَرَسُولُهُ أَعْلَمُ، قَالَ: «ذِكْرُكَ أَخَاكَ بِمَا يَكْرَهُ»، قِيلَ: أَفَرَأَيْتَ إِنْ كَانَ فِي أَخِي مَا أَقُولُ؟ قَالَ: «إِنْ كَانَ فِيهِ مَا تَقُولُ فَقَدِ اغْتَبْتَهُ، وَإِنْ لَمْ يَكُنْ فِيهِ فَقَدْ بَهَتَّهُ».
[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم: 2589]
المزيــد ...
Abou Hurairah (Allah asepela naye), ya solo Motindami ya Allah (kimia mpe mapamboli ya Allah ezala naye) alobi:
« Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. », balobaki: omoni ndenge nini soki ezwami okati ya ndeko nangai maye nazali koloba ? Na Ntoma ayanolaki na koloba ete: "Soki ezali epai maye ozali koloba, yeba ete osili kotonga ye, kasi soki azali te lolenge wana, yeba ete osili bongo kokoselaye likambu." »
[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم - 2589]
Ntoma ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali kolimbola bosolo ya matongi oyo epekisama ete: kolobela na mizilman na tango azali te, na makambo oyo ayinaka, ezala na maye matali lolenge ya nzoto to ya bizaleli naye, ndakisa ya koloba ete: azali na liso moko, azali mokosi to moyibi, tope balolenge misusu na oyo etali bizaleli mayinama, ata soki kutu balolenge wana ezwami epai naye.
Kasi soki moto yango ezali kati naye te tope azali te na balolenge oyo balobeli naye, oyo nde ezali mabe makasi koleka matongi, pamba te, yango ezali bokosi, elingi koloba ete: kokosela moto makambo mpe kobamba likolo naye likambo oyo azali na yango te.