“Droit ya Musulman likoló ya Musulman mosusu ezali mitano: Kozongisa mbote, kotala bato ya maladi, kokende na matanga, koyanola na libyangi, mpe kosepela na koswa.”
Boyebi nini nde ezali matongi ? - Bayanolaki ye ete: Allah na Motindami na Ye nde bayebi malamu koleka! - Alobaki: -matongi - ezali “ koloba na sima ya ndeko nayo, na makambo oyo ayinaka ete bazala koloba yango. »,
“Epesameli nzela te moto asundola ndeko na ye mikolo koleka misato, Bakutani, na oyo alakisi ye, oyo alakisi, ye, na oyo eleki malamu kati na bango mibale ezali oyo akobanda na Salamu”
“Moto oyo azali kotanga Coran na mongongo ya polele azali lokola oyo azali kobimisa swadaka polele, mpe oyo azali kotanga Coran na mongongo ya kobombama azali lokola moto oyo azali kobimisa swadaka na kobombama”
Tango Profeta (s.a.w) azalaki kokende kolala butu nionso, azalaki kosimba maboko na ye esika moko. Na sima afulaki na yango na atanga kati na na yango : {Qul Huwa Al-Laahu 'Aĥadun}, mpe {Qul 'A`ūudhu Birabbi-l-Falaq}, mpe {Qul 'A`ūudhu Birabbi N-Nāsi}