عن عبد الله بن مسعود رضي الله عنه قال: سمعت رسول الله صلى الله عليه وسلم يقول:
«إنَّ الرُّقَى والتَمائِمَ والتِّوَلَةَ شِرْكٌ».
[صحيح] - [رواه أبو داود وابن ماجه وأحمد] - [سنن أبي داود: 3883]
المزيــد ...
Abdullah bin Mas'oûd (Allah asepela naye) alobi ete, nayokaki Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) azali koloba:
« Ya sôlo Ar-Ruqâ, ba talisma mpe ba Tiwala ezali bosangisi Allah [Chirk]. ».
[صحيح] - [رواه أبو داود وابن ماجه وأحمد] - [سنن أبي داود - 3883]
Ntoma (kimia mpe boboto ezala likolo naye) alimbolaki makambo oyo misala nango ezali kati bosangisi Allah [Idolâtrie]; mpe kati na yango:
Ya liboso: Ar-Ruqâ [incantation]: ezali maloba oyo bato ya kala bazalaki kosalela na kosenga kobikisama oyo etondisama bosangisi Allah [shirk].
Ya mibale: Ba Talisma ya mayaka mpe ya biloko mosusu ya ndenge wana; oyo bakangaka na bana, banyama mpe na basusu mpo na kobengana miso mabe.
Ya misato: Tiwala: oyo basalaka mpona kolingisa moko kati ya balongani na mosusu.
Makambo manso oyo mazali na kati ya bosangisi Nzambe; pamba te, yango ezali kotia eloko lokola nzela [cause], mpe yango ezali nzela ya bosolo te oyo emonisama na mibeko ya lingomba, mpe ezali te moko yaba nzela oyo elobelama mpona ya bomekolami. Na oyo etali ba nzela [cause] oyo mibeko elobela, ndakisa ya kotanga Coran, tope bakisi oyo elobelama na lingomba mpona bomekolami, yango epesama nzela na moto azala na bondimi ete yango ezali obele ba cause, mpe bondimi ete ya solo bosungami to bopesami pasi ezali obele na maboko ya Allah.