+ -

عن أبي هريرة رضي الله عنه قال: قال رسول الله صلى الله عليه وسلم:
«مَنْ أَنْظَرَ مُعْسِرًا، أَوْ وَضَعَ لَهُ، أَظَلَّهُ اللهُ يَوْمَ الْقِيَامَةِ تَحْتَ ظِلِّ عَرْشِهِ يَوْمَ لَا ظِلَّ إِلَّا ظِلُّهُ».

[صحيح] - [رواه الترمذي وأحمد] - [سنن الترمذي: 1306]
المزيــد ...

Kowuta na Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi: Motindami ya Allah (losambo mpe kimia ya Allah ezala likolo naye) alobi:
«Na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga na tango azangi makoki, tope atikeliye nyongo wana; na mokolo ya Suka, Allah akozipa ye na se ya elili ya Kiti ya Bokonzi na Ye, Mokolo oyo elili mokote ekozala obele se elili na Ye».

[صحيح] - [رواه الترمذي وأحمد] - [سنن الترمذي - 1306]

Explanation

Ntoma Muhammad (kimia mpe mapamboli ezala likolo na ye) apesaki sango ete; ya solo na oyo akotikela moto ya nyongo ngonga pona nyongo naye, tope alongoli ye mokumba ya nyongo wana; lifuti na ye ekozala ete: Allah akozipa ye na se ya Kiti ya bokonzi na Ye mokolo ya suka, mokolo oyo moyi ekozala pène ya mitu ya bawumbu na Ye mpe molunge na yango ekozala makasi likolo na bango. Moto moko te akozwaka ezipamelo, obele kaka moto oyo Allah akobomba ye na elilingi na Ye .

Benefits from the Hadith

  1. Bolamu ya kolembisa makambu likolo ya basali ya Allah Motombwami, mpe yango ezali moko ya banzela ya kosikolama na minyoko ya Lisekwa
  2. Lifuti ezalaka na lolenge ya mosala
Translation: English Urdu Spanish Indonesian Uyghur Bengali French Turkish Russian Bosnian Sinhala Indian Chinese Persian Vietnamese Tagalog Kurdish Hausa Portuguese Malayalam Telgu Swahili Tamil Burmese Thai German Japanese Pashto Assamese Albanian Swedish amharic Dutch Gujarati Kyrgyz Nepali Yoruba Lithuanian Dari Serbian Somali Tajik Kinyarwanda Romanian Hungarian Czech الموري Malagasy Fulani Italian Oromo Kannada الولوف البلغارية Azeri Uzbek Ukrainian الجورجية المقدونية
View Translations
More ...