عن أبي هريرة رضي الله عنه قال: قال رسول الله صلى الله عليه وسلم:
«إِنَّ اللهَ لَا يَنْظُرُ إِلَى صُوَرِكُمْ وَأَمْوَالِكُمْ، وَلَكِنْ يَنْظُرُ إِلَى قُلُوبِكُمْ وَأَعْمَالِكُمْ».
[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم: 2564]
المزيــد ...
Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi: Motindami ya Allah (kimia ezala likolo naye) alobaki:
“Ya solo Allah atalaka te na bilongi pe na bozwi na bino, kasi (Allah) azalaka nde kotala na mitema pe na misala na bino".
[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم - 2564]
Ntoma Muhammad (kimia ezala naye) azali kolimbola na koloba ete: ya solo Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kotala na bilongi pe na banzoto ya basali naye, ete ezali kitoko to ezali mabe? tope ezali monene to ezali moke? (atalaka pe te soki) ezali ya bokolongono to ezali ya kobela? Azalaka pe kotala te na bozwi na bango, ete boye ezala mingi to moke? Na Allah Nkolo ya Nkembo, azalaka te kozwa to kotangela basali naye na makambo ya mokili oyo tope pona bokeseni na bango kati na yango, kasi Allah - Nkolo ya Lokumu - azalaka nde kotala na mitema na bango pe na maye oyo ezwami kati na yango, kowuta na bobangi pe bonsomi, bosolo mpe bosembo (bomoko ya Allah), tope na mikano ya mabe (oyo ekotaka na mitema) na boluki komilakisa, pe koyokisa. Mpe (Ye Allah) azalaka kotala na misala na bango na ndenge ya bosembo na yango pe na bobebisi na yango; mpe Azalaka kofuta lifuti pe bolamu pona yango to kofuta likolo na yango.