عن عمر بن الخطاب رضي الله عنه قال: قال رسول الله صلى الله عليه وسلم:
«إِنَّمَا الْأَعْمَالُ بِالنِّيَّةِ، وَإِنَّمَا لِامْرِئٍ مَا نَوَى، فَمَنْ كَانَتْ هِجْرَتُهُ إِلَى اللهِ وَرَسُولِهِ، فَهِجْرَتُهُ إِلَى اللهِ وَرَسُولِهِ، وَمَنْ كَانَتْ هِجْرَتُهُ لِدُنْيَا يُصِيبُهَا أَوِ امْرَأَةٍ يَتَزَوَّجُهَا، فَهِجْرَتُهُ إِلَى مَا هَاجَرَ إِلَيْهِ».
وفي لفظ للبخاري: «إِنَّمَا الْأَعْمَالُ بِالنِّيَّاتِ، وَإِنَّمَا لِكُلِّ امْرِئٍ مَا نَوَى».
[صحيح] - [متفق عليه] - [صحيح مسلم: 1907]
المزيــد ...
Kowuta na maloba ya Omar bin Al-Khattab, Nzambe asepela na ye, alobaki: Motindami ya Nzambe (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaki :
“Misala etongami na mokano, mpe mutu akozala kaka na oyo akanaki yango, oyo azali kokende pona Nzambe na Motindami na Ye, kokende naye ekozala pona Nzambe na Motindami na Ye. Mpe mutu oyo ako bima mpo na bolamu ya mokili oyo to pona mwasi ya kobala ye, kibima naye ekozala pona oyo akendelaki yango”. Mpe na maloba ya Al-Bukhari: “Misala esalemaka na ba nia, mpe mutu nyonso akozala kaka na oyo atielaki mokano”.
[صحيح] - [متفق عليه] - [صحيح مسلم - 1907]
Mosakoli (s.a.w) mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, alimboli ete misala nyonso esalemaka na mokano, mpe ekateli oyo ezali ya monene na misala nyonso ya losambo mpe ya mombongo Oyo azali na mokano ya kozwa litomba na mosala naye, akozwa kaka litomba mpe bolingi wana ya kozwa mbano, mpe oyo azali na mokano na nzela ya mosala na ye ya kopusana penepene na Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso akozwa mbano mpe bolamu mpo na mosala na ye, ata soki ezali mosala ya Momesano, lokola kolia mpe komela.
Na sima ntoma (s.a.w) mabondeli mpe kimia ya Nzambe ezala likolo na ye, apesaki ndakisa mpo na kolakisa Ndenge ya mokano na misala, atako ekokani mpe ezomonana, yango wana alimbolaki boye, mutu nyonso akanaki kokende, mpe atikaki mboka na ye mpo na koluka esengo ya Nkolo naye, bongo migration na ye ezali migration légitime mpe acceptable mpe akozwa mbano na yango pona sincerité ya intention na ye, mpe oyo alingaki migration na ye a gagner bénéfice ya mokili, lokola mbongo to lokumu, To mombongo, to mwasi, yango wana akozwa kaka na bokimi na ye litomba ya oyo akanaki yango, mpe akozala na muke ya bolamu Moko te.