عن أبي هريرة رضي الله عنه قال: قال رسول الله صلى الله عليه وسلم:
«مَنْ يَقُمْ لَيْلَةَ الْقَدْرِ إِيمَانًا وَاحْتِسَابًا غُفِرَ لَهُ مَا تَقَدَّمَ مِنْ ذَنْبِهِ»
[صحيح] - [متفق عليه] - [صحيح البخاري: 35]
المزيــد ...
Abu Hurairah (Allah asepela na ye) alobi ete : Motindami ya Allah (kimia mpe bolamu ya Allah ezala likolo naye) alobaki:
“Na Oyo akotelema na Butu ya Mokano, na bondimi nyonso mpe na kolikya lifuti -epai ya Allah-, Bakolimbisa masumu naye oyo maleka”.
[صحيح] - [متفق عليه] - [صحيح البخاري - 35]
Ntoma Muhammad (kimia pe boboto ya Allah ezala likolo naye) azali kopesa sango na maye matali bolamu ya kotelema pona kosambela na butu ya Mokano, oyo ezalaka na kati ya mikolo zomi ya suka ya sanza ya Ramadan, mpe ya solo na oyo akozala molende na butu wana; na losambo, na masengi, na kotanga Al-Qur'ân tope na kokanisa Allah, naye azali mondimi na yango mpe na bolamu oyo eyaka na yango, naye azali kolikya lifuti ya Allah na mosala azali kosala na butu wana, nakoboya komilakisa to komiyokisa epai ya bato mosala naye wana, ya solo ye bakolimbisa kowuta na masumu naye oyo eleka.