عن أبي هريرة رضي الله عنه
عَنِ النَّبِيِّ صَلَّى اللهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ، فِيمَا يَحْكِي عَنْ رَبِّهِ عَزَّ وَجَلَّ، قَالَ: «أَذْنَبَ عَبْدٌ ذَنْبًا، فَقَالَ: اللَّهُمَّ اغْفِرْ لِي ذَنْبِي، فَقَالَ تَبَارَكَ وَتَعَالَى: أَذْنَبَ عَبْدِي ذَنْبًا، فَعَلِمَ أَنَّ لَهُ رَبًّا يَغْفِرُ الذَّنْبَ، وَيَأْخُذُ بِالذَّنْبِ، ثُمَّ عَادَ فَأَذْنَبَ، فَقَالَ: أَيْ رَبِّ اغْفِرْ لِي ذَنْبِي، فَقَالَ تَبَارَكَ وَتَعَالَى: عَبْدِي أَذْنَبَ ذَنْبًا، فَعَلِمَ أَنَّ لَهُ رَبًّا يَغْفِرُ الذَّنْبَ، وَيَأْخُذُ بِالذَّنْبِ، ثُمَّ عَادَ فَأَذْنَبَ، فَقَالَ: أَيْ رَبِّ اغْفِرْ لِي ذَنْبِي، فَقَالَ تَبَارَكَ وَتَعَالَى: أَذْنَبَ عَبْدِي ذَنْبًا، فَعَلِمَ أَنَّ لَهُ رَبًّا يَغْفِرُ الذَّنْبَ، وَيَأْخُذُ بِالذَّنْبِ، اعْمَلْ مَا شِئْتَ فَقَدْ غَفَرْتُ لَكَ».
[صحيح] - [متفق عليه] - [صحيح مسلم: 2758]
المزيــد ...
Abu Hurairah (Allah asepela naye) alobi ete
Ntoma (kimia mpe boboto ezala ote naye) alobi kolandisama na maye Nkolo naye, (Allah Kembo na Ye) Alobaki naye ete: «Mosali moko asalaki lisumu, na sima alobi: '' O Nkolo! Limbisa masumu na ngai", Allah Lokumu naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu ete: "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Kasi na sima mowumbu asali lisusu lisumu mpe alobi : " Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai, mpe Allah Lokumu naye, alobi lisusu : "Mosali na ngai asali lisumu, mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, lolenge moko pe Apesaka etumu likolo ya masumu. Sala nyonso olingi, mpo esi Nalimbisi yo».
[صحيح] - [متفق عليه] - [صحيح مسلم - 2758]
Ntoma Muhammad (kimia mpe mapamboli ezala ote naye) azobeta maloba kowuta na Nkolo naye na koloba ete: moto asali masumu mpe na sima alobi: "Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai". Allah, Nkembo naye, alobi: "Mosali na ngai asali lisumu mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope -ayebi ete azali na Nkolo- oyo Apesaka likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi ye." Na nsima, mosali yango asali lisusu lisumu, mpe na sima alobi: "Ee Nkolo! Limbisa masumu na ngai". Na Allah alobi na ntina na yango ete: "Mosali na ngai asali lisumu mpe ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope Apesaka etumbu likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi masumu pona mosali na ngai." Na sima mosali yango asali lisusu mususu, pe sima na yango asengi bolimbisi na koloba ete : "Ee Nkolo na ngai limbisa masumu na ngai". Na sima Allah alobi: "Mosali na ngai asali lisumu, na ye ayebi ete azali na Nkolo oyo Alimbisaka masumu, mpe Abombaka ye na masumu wana mpe kolongisa ye na yango, tope Apesaka etumbu likolo naye pona lisumu wana; -Allah alobi- Esi nalimbisi masumu pona mosali na ngai, yango wana; asala mae oyo alingi, na tango ete azali tango inso soki asumuki, na sima asundoli yango, ayoki mawa, mpe azwi mokano ya kozongela yango lisusu te. Kasi molimo na ye ekweisi ye pe azongi lisusu na masumu. Kasi na tango nyonso azali kotubela sima ya kosala, Nakolimbisa ye! Pamba ete kobongola motema (Tubela) elongolaka penza makambo nyonso ya kala."