+ -

عَنْ ‌أَبِي هُرَيْرَةَ رضي الله عنه قَالَ:
قَالَ رَسُولُ اللهِ صَلَّى اللهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ لِعَمِّهِ: «قُلْ: لَا إِلَهَ إِلَّا اللهُ، أَشْهَدُ لَكَ بِهَا يَوْمَ الْقِيَامَةِ»، قَالَ: لَوْلَا أَنْ تُعَيِّرَنِي قُرَيْشٌ، يَقُولُونَ: إِنَّمَا حَمَلَهُ عَلَى ذَلِكَ الْجَزَعُ لَأَقْرَرْتُ بِهَا عَيْنَكَ. فَأَنْزَلَ اللهُ: {إِنَّكَ لا تَهْدِي مَنْ أَحْبَبْتَ وَلَكِنَّ اللهَ يَهْدِي مَنْ يَشَاءُ } [القصص: 56].

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم: 25]
المزيــد ...

Kowuta na maloba ya Abu Hurairah, Nzambe asepela na ye, alobaki:
Motindami ya Nzambe (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, alobaka na ndeko ya papa naye ya mobali : Lobá: Nzambe mosusu azali te kaka Allah, na kotatola yango pona yo na mokolo ya lisekwa”. Alobaki: Soki ba Quraysh bafingaka ngayi te, bango bakoloba: na memi yango pona bolembo, soki bongo te nalingaki nasepeli motema naye, Na sima Nzambe akitisaki verse: «Ya sôló, yo (Muhammad) okoki kokamba oyo olingi te, kasi Allah nde akambaka oyo aling» [Al-Qasas: 56].

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم - 25]

Explanation

Ntoma (s.a.w), asengaka Ndeko ya tata naye ya mobali Abu Talib, ntango azalaka na pasi ya liwa, ye aloba : “Nzambe mosusu azali te kaka Allah” pona asengela ye mawa mokolo ya lisekwa mpe akotatola Islam naye, Kasi ye aboyaki kobimisa litatoli pona kobanga ba Quraysh bakolakela ye mabe mpe bakoloba akoti na Islam pona kobanga liwa mpe bolembu! Alobaki na Prophète (s.a.w) : Soki ezalaki yango te, mbele nalingaki na mema esengo na motema na yo na kotanga Shahada, pe nasala posa na yo ekokisama tii okotonda! Na yango Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso abimisaki verset oyo elakisi Ntoma (s.a.w), azali na bokambi ya mutu te! Pona Islam, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, ye moko nde apesaka elonga na mutu nyonso oyo ye alingi. Na prophète (s.a.w), akambaka bato na bokambi ya mateya, bososoli, na bokambi ya libyangi na nzela ya semba.

Benefits from the Hadith

  1. Bosolo ba tikaka yango te, pona kobanga makambo oyo bato balobaka.
  2. Ntoma (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azali kaka na bokambi ya elembeteli na bolakisi bosolo, kasi bokambi ya mitema ya bato azali na yango te.
  3. Légitimité ya kokende kotala infidèle oyo abeli malade, pona kobenga ye na Islam.
  4. Mosakoli (s.a.w) Nzambe apambola ye mpe apesa ye kimia, azalaki na mposa makasi ya kobenga bato epai ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso na Lolenge nyonso.
Translation: English Urdu Spanish Indonesian Uyghur Bengali French Turkish Russian Bosnian Sinhala Indian Chinese Persian Vietnamese Tagalog Kurdish Hausa Portuguese Malayalam Telgu Swahili Tamil Burmese Thai German Pashto Assamese Albanian Swedish amharic Dutch Gujarati Kyrgyz Nepali Yoruba Lithuanian Dari Serbian Somali Tajik Kinyarwanda Romanian Hungarian Czech الموري Malagasy Fulani Italian Oromo Kannada الولوف البلغارية Azeri اليونانية Uzbek Ukrainian الجورجية المقدونية الخميرية الماراثية
View Translations