+ -

عن أبي سعيد الخُدْريِّ رضي الله عنه قال: سمعت رسول الله صلى الله عليه وسلم يقول:
«‌مَنْ ‌رَأَى ‌مِنْكُمْ ‌مُنْكَرًا فَلْيُغَيِّرْهُ بِيَدِهِ، فَإِنْ لَمْ يَسْتَطِعْ فَبِلِسَانِهِ، فَإِنْ لَمْ يَسْتَطِعْ فَبِقَلْبِهِ، وَذَلِكَ أَضْعَفُ الْإِيمَانِ».

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم: 49]
المزيــد ...

Kowuta na Abu Saeed Al-Khudri (Allah asepela na ye) alobi: Nayokaki Motindami ya Allah (sws) azali koloba ete:
«‌ Oyo kati na bino akomona mabe, azala kobongola (kopekisa) yango na maboko naye, soki akokoka - kopekisa yango na maboko na ye - te, apekisa yango na maloba naye, mpe soki akokoka te, ayina yango na motema naye, wana nde ezali moke ya bondimi ».

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم - 49]

Explanation

Ntoma Mouhammad (sws) azali kotinda bato na bobongoli mabe - yango ezali maye manso oyo Allah na Motindami na Ye basila kopekisa - na lolenge oyo moto akokokela. Soki moto amoni mabe, etindami azala kopekisa yango na maboko naye soki akozala na bokasi na yango. Soki azali na makoki te ya kosala yango, bongo apekisa yango na monoko na ye na kopekisa moto oyo asali yango, kolimbola ye mabe na yango, mpe kotambwisa ye na bolamu na esika ya mabe wana. Soki azali na makoki te ya kozua niveau oyo, asengeli apekisa yango na motema naye, na koyina mabe Wana, pe ko kanisa soki akokaki ko changer yango, alingaki asala yango. Kobongola mabe na kati ya motema ezali niveau ya muke na bondimi.

Benefits from the Hadith

  1. Hadith ezali dalili na kolimbola ba étapes ya kopekisa mabe.
  2. Esengi ba
  3. étapes pona kopesa mabe, mutu nyonso lolenge akokoka kopekisa na makasi naye.
  4. Kopekisa mabe ezali na esika monene na lingomba, pe elongoli mutu moko te, mpe esangi na musulman nyonso apekisa mabe na makoki naye.
  5. Kopesa mitindo na oyo ezali malamu mpe kopekisa oyo ezali mabe, ezali bizaleli ya kondima, na bondimi ebakisamaka mpe ekitaka.
  6. Kopekisa mabe esengeli : koyeba na musala yango soki ezali mabe.
  7. Condition ya ko changer mabe: esengeli te mabe ekoma munene koleka.
  8. Pona kopekisa mabe ezali, na botisi na ba conditions, oyo esengeli musulman ayekola yango.
  9. Kopekisa mabe esengaka politique légitime, ya boyebi na bososoli.
  10. Kopekisa na koyina na motema, ezali bondimi ya muke.
Translation: English Urdu Spanish Indonesian Uyghur Bengali French Turkish Russian Bosnian Sinhala Indian Chinese Persian Vietnamese Tagalog Kurdish Hausa Portuguese Malayalam Telgu Swahili Tamil Burmese Thai German Pashto Assamese Albanian Swedish amharic Dutch Gujarati Kyrgyz Nepali Yoruba Lithuanian Dari Serbian Somali Tajik Kinyarwanda Romanian Hungarian Czech الموري Malagasy Fulani Italian Oromo Kannada الولوف البلغارية Azeri اليونانية Uzbek Ukrainian الجورجية المقدونية
View Translations
More ...