+ -

عَنْ جَابِرٍ رضي الله عنه قَالَ:
أَتَى النَّبِيَّ صَلَّى اللهُ عَلَيْهِ وَسَلَّمَ رَجُلٌ فَقَالَ: يَا رَسُولَ اللهِ، مَا الْمُوجِبَتَانِ؟ فَقَالَ: «مَنْ مَاتَ لَا يُشْرِكُ بِاللهِ شَيْئًا دَخَلَ الْجَنَّةَ، وَمَنْ مَاتَ يُشْرِكُ بِاللهِ شَيْئًا دَخَلَ النَّارَ»

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم: 93]
المزيــد ...

Kowuta na maloba ya Jabir, Nzambe asepela na ye, alobaki:
Mutu moko ayelaki ntoma (s.a.w), mpe alobaki: O Motindami ya Nzambe, bantina mibale ezali nini? Alobaki naye: “Mutu oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko te, akokota na Paradis, na oyo akokufa asangisaki Nzambe na eloko, akokota na Lifelo”.

[صحيح] - [رواه مسلم] - [صحيح مسلم - 93]

Explanation

Mutu moko atunaki Ntoma (s.a.w), ntina ya bizaleli mibale: oyo esengaka kokota na Paradis, na oyo esengaka kokota na Lifelo? Ntoma (s.a.w) mabondeli ya Nzambe mpe kimia ezala likolo na ye, ayanolaki : oyo esengaka Paradis, ezali mutu akufa naye azali kosambela Nzambe ye moko, mpe asangisa ye na eloko moko te. Na ezaleli oyo esengaka Lifelo ezali mutu akufa naye azali kosangisa nzambe na eloko, kosala nzambe na molongani, na moninga nakati ya bonzambe naye, ou bien na bokambi naye, to bankombo na bizaleli naye.

Benefits from the Hadith

  1. Avantage ya Tauhid bomoko ya nzambe, na mutu oyo akokufa lokola mondimi, asangisi nzambe na eloko moko te, ye akokota na Paradis.
  2. Likama ya binzambi nzambi, pe oyo akufi na ko associer nzambe na eloko nyonso, ye akokota na Lifelo.
  3. Bato ya Tauhid soki basali masumu, bazali na nse ya bolingi ya nzambe, soki nzambe alingi akopesa bango etumbu, na soki alingi akolimbisa bango, nde bakozala na mokano ya kokende na Paradis.
Translation: English Urdu Spanish Indonesian Uyghur Bengali French Turkish Russian Bosnian Sinhala Indian Chinese Persian Vietnamese Tagalog Kurdish Hausa Portuguese Malayalam Telgu Swahili Tamil Burmese Thai German Pashto Assamese Albanian Swedish amharic Dutch Gujarati Kyrgyz Nepali Yoruba Lithuanian Dari Serbian Somali Tajik Kinyarwanda Romanian Hungarian Czech الموري Malagasy Fulani Italian Oromo Kannada الولوف البلغارية Azeri اليونانية Uzbek Ukrainian الجورجية المقدونية الخميرية الماراثية
View Translations